Général Ulisses de Mesquita Gomes, Commandant ya MONUSCO, akomi mokolo mwa ntuku ibale ya sanza ya mwambe oyo (20 août) o etando ya Djaiba na territoire ya Djugu, na Ituri. Botali boye bozali kosalema ntango bankoto ya bato baye balongolami na bisika bia bango mpo na bitumba ya mangomba ya basoda balukaki ekimelo nzinganzinga ya ndako ya mosala ya MONUSCO, o etuka etuka eye wuto basanza mingi.
Bozali ya Général Ulisses de Mesquita Gomes ezali kolakisa boyokani bwa MONUSCO na bato ya Ituri, baye bazwaki pasi makasi na mobulu mbala na mbala ya bituluku bia basoda.
Na bovandi na ye na Bunia, engumba mokonzi ya etuka, Général Ulisses de Mesquita Gomes akani kokutana na bakonzi ba bonkoko mpe na lisanga lia bokengi ya territoire mpo na kososola malamu ezalela ya bokengi, oyo ezali mingi mingi na bitumba kati na masangá mpe na minduki na ba territoires ya Djugu mpe Irumu.
Général akokende pe kotala ba Projets ya Impact rapide (QIPS) ebele oyo esalemi na ba communautés, oyo esungami na mosolo na MONUSCO, oyo ezali na ntina ya kokokisa baposa ba nokinoki ya bato ya mboka.



