Mampinga ya basoda ya ekolo Congo démocratique (FARDC) na ba babateli ya kimia ya MONUSCO balendisi boyokani bwa bango mpo na kobatela malamu ba ike na mabe mpe na ba mbeba oyo batomboki basalaka na Ituri. Boyokani oyo emonanaka mingi mingi na bosali bwa bolukiluki mpo na kosukisa monguna.
Moyangeli mwa ngonga moke (Gouverneur intérimaire) ya etuka eye, Raus Chalwe, asakoli bokasi boye lundi 19 août, na bokutani na bapanzi nsango elongo na mokambi mwa mampinga ya MONUSCO, Général Ulisses de Mesquita Gomes, oyo azali sik’oyo na mobembo mwa mosala o etuka eye eyebani na mibu mia bitumba.
Na bokutani boye, batalaki lisusu makambo ma bokengi, maye balobeli lokola « ezali kotungisa », na bomati bwa sika ya bitumba ya koboma biye bibomi bankama ya ba ike mpe ememi na bolongolami bwa bato mingi.
Engebene na Général Raus Chalwe, kosangisa milende wana esalisaka mpo na bokengi bwa ba ike oyo bakutanaki na makama mbala na mbala.
Boyokani bosili. Ba patrouilles ezali sik’oyo elongo mpo na kolendisa bopekisi. Mampinga ma biso mazali kosala mosala mwa kozanga mbeba na boyokani na MONUSCO mpo na kobatela bato.
esakoli ye
Na ngambo na ye, Général Ulisses de Mesquita Gomes andimi lisusu bondimi bwa MONUSCO ya kosunga FARDC na bobateli bwa ba civils mpe alakaki kokoba na boyokani boye bolendisami.
Tokokoba kosala elongo na bakonzi ba mboka mpo na kolendisa boyokani bwa biso.
andimisaki ye
Na bovandi bwa ye na Ituri, Commandant ya MONUSCO na bato bwa ye bakokende kotala Komanda mpe Fataki mpo na kotala mpe kobongisa lisungi lia mobembo mwa mosala ya ONU mpo na bobateli bwa ba ike.
