Ituri : ba CODECO babomi bato zomi na mitano na Djugu

Bato zomi na mitano (15) bakufi na ndenge ya somo na mobulu bwa sika ya batomboki ba CODECO o etando ya Maze, ezwami na bokonzi bwa Bahema-Nord kati na territoire ya Djugu, o etuka etuka ya Ituri.

Epayi ya bapanzi nsango ya 7SUR7.CD, Pilo Mulindro, mokonzi mwa Bahema-Nord, andimi ete baye bazwaki pasi bazalaki na nzela mpo na kosala misala mia bilanga.

Tozali na somo. Bato 15 baye bazalaki na nzela mpo na kosala misala mia bilanga na Maze bakangamaki na ba miliciens ya CODECO mpe babomamaki na ndenge ya somo pene na ngonga ya motoba (6h).

elobi ye

Mpo na koluka kopekisa mbeba, bokonzi bwa bonkoko elakisaki ete ba pulusu mpe mapinga bazalaki eloko moko te.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img