Bato zomi bakufi na nungunungu oyo elobami na ba tomboki ya Coopérative pour le Développement du Congo (CODECO), mokolo ya ibale oyo le 16 août 2022, na Waya, mboka moko ezwami na groupement Bandinga ya mokonzi ya Mambia, territoire ya Djugu, Etúká ya Ituri.
Faustin Kpadinga, mokambi ya Bandinga, oyo epesaki nsango oyo na bapanzi nsango ya Actu30.cd, alakisi été ba tomboki oyo, bazokisaki pe bato miney (4). Kolanda ye, ba bapunzaki mpe biloko ya bayi population.
Ba tomboki oyo ya CODECO ba landaki mboka ya Waya. Kuna, bato zomi bakufi mpe basusu miney bazoki makasi na bibundeli ya ba mbeli mpe minduki
alimboli bongo Faustin Kpadinga.
Tango azali kosenga na bafandi ya mboka ena ba batela kimia, azali kolakisa été mapinga ya FARDC bazali bongo ko kita na esika oyo mpo na ko batela bango.