Insécurité : ba bomi elenge mobali yoko na commune ya Mangobo

Mokolo ya mitano oyo na tongo, ba vandi ya Mangobo na rond point ABC ba lamuki na somo mpe mawa, ko mona elenge mobali yoko ya mbula zomi na mitano (15 ans), movandi ya commune ya Mangobo na quartier Matete avenue Buta, oyo ba bomi ye na rond-point ABC na mabanga ya minene mpe blocks moteur.

Mpona ba ndeko ya zinga zinga ya rond-point ABC, elenge mobali oyo a zali moyibi kasi maman waye na ba ndeko ba ye oyo ba zalaki wana na pinzoli na miso ko lela ndeko na bango, ba lobi boye :

« Elenge oyo ba bomi a zali moyibi te, a wutaki ko lala na Matanga moko oyo e zali musika ya rond-point ya ABC te, na bozongi na ye na ndako na gonga ya misato ya tongo nde ba kanisi ete a zali moyibi lokola a lekaki na mikatokato yoko mpene ya lopango ya bato nde ba kangi ye ba bomi ye »

Solo, ko mona liwa ya elenge mobali oyo, e pesi bayi population basusu, mpe baninga ba ye oyo ba zalaki na ye na matanga. Pasi na motema lokola ba bomi, mwana ya moke makasi boye.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img