36.8 C
Kisangani
14 septembre 2026
spot_img

Haut-Katanga : bokono bwa choléra bongali o etando mobimba, pulupulu emati

Ministre ya koyangelala mambi matali kolongono ya nzoto o etuka ya Haut-Katanga, Joseph Sambi Bulanda, nde apesi nsango ete bokono bwa choléra oyo epesaka pulupu makasi bongali o etando mobimba ya etuka eye.

Babeli bakomi nkama moko na tuku motoba (160) mpe bato zomi na motoba (16) ba weyi.

Na yango Joseph Nsambi Bulanda asengi na bayi mboka banso kosala makasi mpo na kobundisa mpe kolonga bokono boye mpe kotosa mibo mwa bopeto, komema na lombango o ndako ya bo kolongono ya pene pene baye banso bakolakisa bilembo bwa pulupulu, ya kosanza, ya pasi na moto mpe na libumu.

Ntoma oyo ya etuka oyo atali kolongono ya nzoto asengi lisusu na bapanzi nsango, na ba mobilisateur, ba yengeli ya ba kabila, ya mangomba mpe masanga eko bundelaka bolamu ya bayi mboka ya kobwaka mbela ote ya bayi mboka banso na oyo etali likama ya Choléra mpe tina ya kotosa meko nionso ya bopeto.

Meko yango ezali : komela kaka mayi ya petwa, kosukola maboko tango inso na mayi mpe na sabuni yambo ya kolamba bileyi, yambo ya kolia, yambo ya komelisa mwana, na sima kozala na zongo inene mpe na sima yako longola mwana nieyi, kobongisa zongo inene tango inso na mino oyo ekobomaka mikolobo, ko mipekisa kolia bileyi oyo ebatelami malamu te, oyo batekaka na balabala, kosopa putulu na kati ya zongo inene mpo na koboma ba nzinzi mpe kolongola solo.

To yeba ete ba zones ya kolongono oyo esimbami na bokono makasi ezali ya Kisanga, Katuba, Kilela Balanda, Likasi, Vangu, Mumbunda, Kampemba, Lukafu, Lubumbashi mpe Katuba.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img