Likama lioko ya nzela lisalemaki mokolo mwa lomingo moleki, o nzela ya kolongwa Kasumbalesa mpo ya kokende Sakania, o etuka ya Haut-Katanga.
Na likama liango, bato zomi na mwambe ba kufi, bana misato ya mbula na se ya sambo bazalaki na kati na bango.
Motuka moko ya monene oyo ememaki mabanga ya ntalo ewutaki Kasumbalesa etutani na motuka moko ememaki bandimi ya lingomba Kimbanguiste, oyo ba wutaki milulu, na etando ya Kikwata.
Na nzela wana, oyo ezali likama ya yambo te. Mposo mibale mileki, mituka mibale ya minene oyo ememaka carburant etutanaki wana, bakumbi nyoso mibale bakufaki sima ya kozika na moto.



