21.8 C
Kisangani
21 septembre 2026
spot_img

Goma : bato koleka nkama oyo bakangamaki epayi ya ba M23 balimwe

Bato mingi bazali komonana te kino mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya mitano oyo (12 mai), nsima na molongo ya bokangami bosalamaki mikolo mileki na batomboki ba M23 na ba quartiers ebele na libanda ya Goma (Nord-Kivu), kolanda ba nsango ebele ezwami wana.

Engebene na balapolo mingi, kati na bato koleka nkama oyo bakangamaki na ntango ya misala miye na engumba Goma, kaka mwa zomi na mibale nde babimisamaki mpe bakokaki kozonga na mabota ma bango. Basusu mingi, mingimingi bilenge oyo bazangi mikanda ya bomoto, bazongi naino na bandako ba bango te, mpe mabota ma bango bazali na nsango te.

Kolanda maziba ndenge na ndenge, bokangami bwa suka bosalamaki na tongo ya mokolo ya lomingo ya le 11 mai epayi ya ba M23, na ba mboka misato na territoire ya Nyiragongo, na libanda ya Goma, engumba mokonzi ya etuka ya Nord-Kivu.

Opération oyo esalemaki mingi mingi o etando ya Rukoko na district ya Katalengwa, mpe na Ngangi 1 na 2, Kiheru mpe lisusu na Murambi. Na opération eye, ebele ya bato balongolamaki na bandako na bango yambo na kosangana na ndao ya masano ya Kahembe o’mokolo ya yambo ya mposo na ntongo, kolanda ba ike bamonaki. Wana nde esika oyo baponamaki.

Likambo liye lizali kotungisa ba ike makasi, baye bayebi te esika wapi bato bakangami, to mpe bokonzi nini basengeli kokutana na bango mpo na kozwa eyano, elimboli bafandi.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img