30.2 C
Kisangani
19 septembre 2026
spot_img

Goma : bato batano bakufi na likama lia motò na Kyeshero

Bato batano (5) baziki mpe bakufi, basusu babale (2) bazoki makasi, mpe mbeba ya monene ya biloko ezwamaki nsima na motò kobima na bandako babale ya pembeni mokolo mwa zomi na ibale ya sanza ya mwambe oyo (12 août), na balabala Abattoir, quartier Kyeshero o engumba Goma, etuka ya Nord-Kivu.

Bato bakani ete lotiliki nde esalaki likambo yango ya mawa, engebene na maziba oyo mazali na boyokani bwa esika yango. Likambo liye ya mawa esalemaki pene na ngonga ya misato mokolo mwa lelo, kolanda ba nsango tozwi wana.

Engebene na ba témoins oyo basanganaki na esika ya likambo, nsinga ya lotiliki ekweaki na moko ya bandako ntango baye bazwaki mpasi balalaki mpɔngi makasi.

Na ndako ya liboso epai nsinga yango ekweaki, bato misato bakufaki, mpe bato basusu mibale bazokaki makasi. Babikisamaki na mwa moke mpe bamemaki bango na lombango o esika moko ya monganga ya mboka.

Motò yango epalanganaki nokinoki na ndako ya pembeni, mpe ebomaki bato babale. Biloko nyonso oyo ezalaki na bandako yango mibale ezikaki.

Na bokebisi ya ba voisins, motuka ya maire ya Goma ya bopemi motò ekomaki na esika ya likambo mpo na koboma motò, kasi eyaki sima. Bandako yango mibale ekómaki mputulu, ndenge batatoli balobaki.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img