Coronavirus : efuku ya dollars, lisungi oyo Equity Bank Congo e pesi gouvernement ya RDC

Equity Bank Congo, oyo e yebanaka na kombo ya ProCredit Bank DRCongo, eza moko ya ba Banque commerciale na RDC.

Mokolo ya mitano (jeudi ) 25 juin 2020 oyo, Ilunga Ilunkanga, premier ministre ya mboka na biso, a yambaki na primature lingomba ya ba sali ya Equity Bank Conngo, oyo e memamaki na Celestin Mukeka oyo a zali directeur général.

Délégation oyo e memaki lisungi ya efuku (1 million) ya dollars américains mpo na ko soutenir ba efforts ya gouvernement na biso mpo na ko longa bokono ya Covid-19, mpe lisusu mpo na ko somba ba équipements ya ko mi batela, mingi mingi minganga oyo ba zali ko sunga batu na ba hôpital oyo l’Etat e poni mpo na ko traiter bato ya bokono oyo na Kinshasa mpe na mboka mobimba.

To yeba ete lisungi ya Equity Bank Congo oyo e ko kende mbala moko na libenga ya « fond de solidarité  » oyo e salami na gouvernement na biso mpo na ba lisungi ya mitindo oyo.

Eteni Longondo ministre ya santé, coodonteur ya secretariat technique ya « comité multisectoriel de la riposte contre la penderie de la Covid19 « , mpe na coordinateur ya « Fond National de solidarité de la lutte contre la Covid19 » Revend Mukanya, bango nioso ba zalaki na likita oyo na primature.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img