« E zali pasi ko salisa maponami oyo batu nyoso ba ko ndimi yango na Congo », a sosolisi bongo candidat na bokambi ya CENI, Denis Kadima, oyo a zali mokonzi na institut électorale pour une démocratie stable en Afrique (IESA) na emission face-à-face ya Top congo. 
« Soki to lobi to salisa maponami oyo e zali na bosolo, e sengeli e zala loyembo te, kasi e zali na biloko oyo e sengeli to sala mpo to koma wana. » A sosolisi bongo candidat oyo.
« Posa na nga e zali na salisa maponami oyo moto nyoso ako sepela na yango, mpo na zali na makoki ya ko sala yango neti na salisaki libanda ya mboka (Soudan na Tunisie) tango na zalaki nanu na ONU »
To yeba ete na maye e tali mokonzi ya ceni, mokonzi ya ekolo Felix Tshisekedi a boyaki ko investir Ronsard Malonda ko landana na ba reclamations ya bato misusu.



