30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Libateli

Bunia : mokambi ya batomboki ba CRP amipesi epayi ya FARDC

Mokambi ya batomboki ya Convention pour la révolution populaire (CRP), Franck Mugisa Ndahura oyo ayebani na kombo ya Arali, amipesaki na bolingi bwa ye na mampinga ma FARDC mikolo mileki o engumba Bunia. Bakonzi ba etuka bazwi ye mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya motoba oyo (17 juin).

Mokambi ya kala ya batomboki oyo abundisaki FARDC na libongo lia lac Albert, Arali alobi ete ayanolaki na bosenga ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi mpo na kimia o etuka ya Ituri. Alobi azongi wuto bokangami na Ouganda, andimisami na masengi ma gouverneur militaire, Général Johnny Luboya, mpo na bozongisi bato na bowumbu.

Nazongaki mpo na likambo ya kimia. Na bilenge banso : bokosama te, eloko ezali te na zamba. Bokokufa mpe bokotika basi na bino basi bakufelá mibali.

esakoli ye na mayoki

Bomipesi boye bozali na kati ya molulu monene : kolanda Lieutenant Jules Ngongo, molobeli ya mampinga na Ituri, pene na batomboki zomi (10) basusu ya CRP bamipesaki mpe kala mingi te.

Komanda ya basoda elendisaka babundi mosusu batika bibundeli bia bango, mpe endimisi bango ete bakotungisa bango te soki baponi kimia.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *