24 avril 2024
Ville de Kisangani, RD Congo
Société

Bunia : Jean-Pierre Lihau aye ko yeba mikakatano ya basali ya Leta

Vice-Premier ministre mpe ministre ya fonction publique, Jean-Pierre Lihau akomaki lundi 18 juillet na Bunia mpo na mobembo ya mosala na engumba mokonzi ya etuka ya Ituri.

Jean-Pierre Lihau azali kokoba na mibembo mwa ye na ba engumba, na mokano mwa ye ya kosembola mosala ya leta. Sima ya Kisangani, mokonzi ya fonction publique akendeki na mpepo na Bunia.

Naye kotuna na ntina ya mikakatano oyo mizali kozela basali ya Leta na Ituri mpe komona nokinoki mpenza na meko nini nakoki kozwa biyano.

alobaki bongo Jean-Pierre Lihau.

Kolanda ye, Mokonzi wa Ekolo Félix Tshisekedi, azali na mokano ya kosembola mosala ya Leta na ndenge nyonso mpo na bolamu ya basali.

Bo yeba ete, le 19 juillet oyo, Jean-Pierre Lihau akambaki bokutani ya mosala na mokambi ya etuka yambo na kokutana na bakambi mpe ba sali ya Leta.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *