30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Lisanga

Bukavu – Makamá ya motò : bato motoba (6) bakufi mpe basusu koleka nkama motoba (600) bazwami na pasi

Motango ya motò minei elobamaki na kati ya mikolo misato, kobanda jeudi 3 juillet kino samedi 5 juillet 2025, na Bukavu, o etando ya Sud-Kivu. Bato motoba, kati na bango bana mitano, bakufaki na motò yango, mpe bato koleka nkama motoba bazwaki pasi mbala moko na makama yango.

Motò ya yambo etikaki mabota koleka nkama moko kozanga ndako na quartier Nkafu o etando ya Kadutu, ebomi mwana moko ya mibu sambo (7 ans).

Kaka mokolo wana, motò mosusu ezwaki bomoi ya bana basato ya libota moko na Panzi, o etando ya Ibanda, mpe bandako basato ezikaki mpe misato misusu ebebaki.

Sima ya mikolo mibale, mama moko na mwana wa ye mpe bakufaki na motò mosusu na balabala Télécom 2 quartier Ndendere o etando ya Ibanda, mpe bandako zomi na sambo (17) ezikaki mobimba. Motò mosusu mobimaki kaka mokolo wana na balabala Murhundu o etando ya Kadutu, epayi wapi bandako zomi ezikaki.

Ebongi koyeba ete makamá ya motò mazali mbala na mbala na engumba Bukavu na eleko ya kokauka. Uta 2021, bandako koleka nkama eziki. Mbala mingi, bantina ya motò wana ya mbala na mbala eyebanaka te.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *