Sima na bobungisi ya bato libwa (9) na bitumba, mampinga ma mboka Afrique du Sud mazwami na kati ya lisanga SAMIDRC na Goma, bazali na mawa na liwa ya ba soda minei (4) ya sika.
Na bitumba ya mapinga ma FARDC na batomboki M23, mokolo mwa ntuku ibale na sambo ya sanza ya yambo oyo (27 janvier), pene ya ndako ya mpepo ya Goma epayi wapi base ya SANDF [mampinga ya Afrique du Sud]] ezali, bato basato (3) ya SANDF bakangamaki na masasi mpe bakufaki, esakoli liyebisi ya bapanzi nsango, oyo elakisaka ete masasi mabetamaki na ba M23.
Mampinga ya Afrique du Sud esakoli mpe liwa ya moko na baye bazokaki liboso na bitumba na M23. Basusu bazoki bazali kokoba kozwa lisalisi na lopitalo moko na Goma.
Atako bobungisi boye mpe atako bososoli te mpe kanda ya makanisi ya bato na Afrique du Sud, mampinga ya Afrique du Sud maye mazali na bato 2.900 basangani na mampinga ya SAMIDRC, balobi ete bazali na mokano ya kokoba mission na bango ya kobatela kimia na RDC.
