1 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Libateli

Bitumba na Est – Sud-Kivu : mapinga ma FARDC na batomboki ba M23 babundi makasi na Bushushu

Bitumba ya mobulu bisalamaki kati na mapinga ma ekolo Congo démocratique (FARDC) na batomboki ba M23 mokolo mobimba ya jeudi 6 février oyo, na mboka Bushushu (territoire ya Kalehe), o etando ya Sud-Kivu.

Bitumba biye bisalemaki mokolo moko nsima na maye makomaki na mboka Nyamukubi. Bayi Société civile balobi ete bitumba bizali komata na Bushushu kati na mapinga ma mbulamatari mpe VDP mpo na kotelemela M23 lelo.

Nyamukubi mpe Bushushu ezali bamboka mibale oyo ezwaki mpasi na mpela makasi oyo ebomaki bato koleka nkama mitano (500) mpe basusu koleka nkóto mitano (5000) balimwaki na sanza ya mitano ya mobu 2023.

Bayi Société civile bazali kobanga ete bitumba yango bikoma o ba mboka Ihusi mpe Kalehe Centre.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *