Basali bilanga na territoire ya Nyiragongo, o etuka ya Nord-Kivu, balobi ete bakoki kokota na bilanga na bango te mpo na bibembe bizali kopɔla bizali naino kolala na banzela mpe na bilanga. Likambo oyo ezali kotia mikakatano na kolongono ya nzoto ya ba ike.
Mosali bilanga moko akutanaki na bapanzi nsango ya Radio Okapi mokolo mokolo mwa mwambi ya sanza ya ibale oyo (8 février) mpo na kosenga na bayi Croix-Rouge mpe basali bwa lisungi basala noki mpo na kobimisa bibembe biye mpe kopetola esika eye.
Makambo yango elobami na bamboka ndenge na ndenge ya bituluku ya Kibati, Buvira mpe Rusayu.
Lokola population ezali koluka kokɔta na bilanga mpo na koluka bilei, pamba te mwa kimia ezali mikolo oyo. Bibembe yango emonanaki banda batomboki ba M23 na mapinga ma Rwanda bazwaki Goma.
Bitumba makasi na bibundeli ya makasi bikomamaki na bamboka eye yambo na batomboki baye bakota na engumba Goma. Oyo ezali komonisa bibembe ebele oyo ezali kaka kolala nzinga nzinga. Oyo ebimisi bobangi ya likama ya bokono epayi ya ba ike.



