30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Libateli

Beni : ba ADF babomi bato mwambe na nzela ya Oïcha–Mamove

Bato mwambe bakufi na mobulu mwa sika ya batomboki ba ADF vendredi ya lelo na ntongo, na nzela ya Oïcha-Mamove, na territoire ya Beni o etuka ya Nord-Kivu. Batomboki baye babundisaki motuka moko ememaki basali mombongo oyo ezalaki kokende na Mamove.

Tozalaki mwa pembeni ya motuka oyo ekangamaki mpo tukutuku na biso ewutaki kobeba. Toyokaki masasi mpe tobandaki kokima, kotika tukutuku na biso nsima. Ezalaki ntango nazalaki kokima nde bazwaki masasi. Nabikisamaki na mpasi na lopitalo, mpe nayebi te wapi mama na ngai, oyo tozalaki kokende elongo na ye na elanga, azali.

elobi mobiki moko

Société civile ya mboka eyebisi ete, longola koboma bato oyo babomamaki, batomboki oyo bapunzaki biloko mpe batumbaki motuka moko mpe ba tukutuku mingi.

ADF ebomaki ba civils mwambe. Bato baye bazwaki mpasi bazalaki na nzela na zando ya Mamove. Ezalaki mpe na motuka moko eziki mpe ba tukutuku minei eziki. Tozali na mawa mpo batomboki bazali kolanda biso na bitando mpe ata na kati ya zamba. Tolembi kokunda ba oyo ya biso. Tika ete mampinga masala misala mpo na kobatela bato na likama.

elobi Kinos Katuo, mokambi mwa société civile ya mboka

Na Oïcha, esika baye bazwaki mpasi bafandaki, société civile ya mboka esakoli mokolo mwa kozanga kosala mpo na kokanisa bato oyo babomamaki.

1 Comment

  • Mushidi muamba joyce 28 septembre 2025

    Je suis toujours entre de vous suivre

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *