26.1 C
Kisangani
17 septembre 2026
spot_img

Ituri : mapinga ma FARDC mpe UPDF balongi etumba moko liboso lia ba ADF na Irumu

Lisanga ya FARDC-UPDF elongolaki bolandi bwa sika ya batomboki ya Forces démocratiques alliées (ADF) na butu ya mercredi kino jeudi 14 août 2025, na mboka Banzingi, na bokonzi bwa Banyali-Tchabi, na nse ya territoire ya Irumu o etuka ya Ituri.

Kolanda maloba ma Mboma Babanilau Faustin, mokonzi mwa ba Kundana, boyeyi na lomnango ya mampinga ma FARDC elongaki kopekisa mbeba mpe makamá ya makasi penza.

Pene na ngonga ya misato (3)., batomboki ba ADF babundisaki Bazingi. Na boumeli ya etumba, ba jihadistes baye bazwaki bato babale, kati na bango mwasi moko ya mibu ntuku mitano na motoba (56 ans) mpe mwana moko ya mibu sambo (7 ans), mpe balongaki mpe kotumba ndako moko. Kasi ba FARDC mpe UPDF bayaki na lombango mpe bapekisaki mbeba wana.

elobi ye

Kasi na ngonga ntuku mibale na minei yambo, batomboki ba ADF bautaki kobundisa centre commercial ya Boga, koboma lisusu bato basato mpe kotumba bandako mpe mituka mingi.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img