Mwasi moko akufi nsima na konyatama na motuka ya camion-remorque mardi 25 juin oyo, na likama ya nzela oyo esalemaki na balabala Liberation (oyo kala ezalaki 24 Novembre) o etando ya Selembao.
Engebene na ba ike, mwasi oyo azalaki na nzela ntango motuka ya kilo eniataki ye, oyo ebomaki ye mbala moko.
Azalaki kotambola kaka pembeni ya nzela, camion ezalaki koleka mbangu… toyokaki kaka makelele mpe esilaki koleka.
elobi motatoli moko
Makambo ma sikisiki ya likama yango eyebani te, kasi bolukiluki ekofungwama na bakonzi oyo batalelaka likambo yango mpo na koyeba nani azalaki na mokumba mpe kososola bantina ya likambo yango ya mawa.
Ezali ntango nyonso lisolo moko awa. Mituka minene etosaka ndelo ya mbangu te to etosaka te bato oyo batambolaka na makolo.
elobi mofandi moko ya eteni eye ya engumba



