21.7 C
Kisangani
7 août 2026
spot_img

Lomami : bato babale bakufi na likama lia motuka na Mwene-Ditu

Bato babale (2) bakufi na likama lia motuka oyo esalemaki mokolo mwa minei ya sanza ya mwambe oyo, (le 4 août), na nzela ya Mwene-Ditu–Mbaya Museng, pene na malita ma Mukaya, o etuka ya Lomami.

Nsango yango endimisami na mokolo ya misato ya mposo oyo (mercredi) na mokambi mwa engumba Mwene-Ditu, Maire Gérard Tshibanda, oyo asololi epayi ya bapanzi nsango ya 7sur7CD.

« Ezali solo ete bato babale bakufi na likama. Kino sikoyo, nakoki kaka kondimisa likambo liye, mpo makambo manso makoyebana nsima ya bolukiluki oyo ba soda ba mayele bazali kosala na esika. Ezalaki motuka mwa Fuso oyo ezalaki komema biloko bia fibre optique », elobi ye.

Kolanda moko ya bato oyo babikaki mpe alobaki na bapanzi nsango ya mboka, motuka mwa Fuso ezalaki komema ba bobine mibale ya fibre optique mpe pene na bato tuku misato (30) oyo bazalaki kosala mpo na kompanyi moko oyo ezali kotya biloko yango. Bazalaki kokende o esika ya Kankole mpo na kokoba na misala mia bokangami bwa réseau.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img