30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Politiki

Kongo-Central : Judith Suminwa alaki kozongisa libongo lia boma na bomoyi

Ministre ya yambo Judith Suminwa Tuluka andimi mokano mwa ye ya kozongisa na bomoi libongo ya ebale ya engumba Boma o etuka Kongo-Central, mokolo mwa yambo ya sanza na zomi oyo (1er octobre).

Mokambi mwa mbulamatari abandaki mobembo mwa ye ya na botali bisika bia libongo lia Boma. Alakaki ete akobanda lisusu misala kuna.

Na likita lia ba ministres, tozwaki mokano mwa kozongela misala mia libongo lia Boma. Nalingi kokokisa elaka eye, engebene na makanisi ma mokonzi mwa ekolo, mpe nazali pene ya kotia maboko na mibeko miye mbala moko mabongisi ma tekiniki masili.

eyebisi Judith Suminwa na basali ba ONATRA, oyo basanganaki mpo na molulu yango.

Lisusu, asakoli ete mbulamatari ekobanda masolo na ba partenaires privés, na ntina ya kofungola lisusu ba usines oyo etiki misala, lokola ezali na Bralima.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *