4 avril 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Libateli Politiki

RDC : mbulamatari Suminwa epesi maboko na bosukisi bolamu ya boyokani bwa Doha

Mardi 2 septembre oyo, vice-Premier ministre mpe ministre ya Intérieur Jacquemain Shabani azongeli bondimi bwa mbulamatari mpo na bosukisi bolamu ya boyokani ya Doha.

Na bokutani na bapanzi nsango na Kinshasa, mokambi oyo alakisaki ete mbulamatari esi epesi bato ba mayele mpo na kosalela mambi ma botongi bwa kotya motema (confiance), oyo ezali na « accord de principe », mingi mingi na oyo etali kobima ya bakangami na boloko.

Na ngambo na ye, ministre ya Communication mpe Media atelemisaki ete mambi manso mana ya kotonga « confiance » esalema na kolanda mibeko mia Congo. Tango ba bayi politiki bazali kolobela kimia na Doha, kotoyo bitumba bizali nse makasi kati na batomboki baye basungami na Rwanda mpe mampinga ma FARDC, oyo basungami na babundiba Wazalendo ya mboka.

Mampinga ma FARDC elobi ete bitumba ya AFC/M23 ezali « bobukami bwa polele, boyokani bwa kimya ya Washington mpe likambo liye ya Doha », oyo ezali na mokano mwa kosala kimya ya seko na est ya mboka.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *