Lokola masolo kati na Congo démocratique na Rwanda mazali kokoba o engumba Doha, mboka Qatar, ba nsango ya ACP elobi ete AFC/M23, oyo esungami na Kigali, ezali kosenga ete ekonza Nord-Kivu mpe Sud-Kivu na boumeli ya mbula mwambe (8 ans).
Kolanda ba nsango baná, Kigali, na nzela ya batomboki ya M23, ezali kosenga bituka bina mibale ya Est ya RDC makasi.
Likambo liye likotisi nungu nungu makasi kati na masolo mana mazali kolekana o engumba Doha, nzambi emonani polele polele penza ete AFC/M23 na Rwanda bazali nse bato moko.
Ata ndenge mikanda mia boyokani mizali kotiama mikoloto mikolo minso, ndakisa oyo ya Washington, bitumba bia M23 bizali nse kokoba, batomboki bazali nse koboma ba ike.



