21.6 C
Kisangani
26 septembre 2026
spot_img

Nord-Kivu : na Masisi, bakuti bibembe koleka zomi ezali kopɔla

Mokolo ya ntuku ibale na motoba ya sanza ya mitano oyo, bibembe koleka zomi oyo ezali kopɔla ezwamaki na territoire ya Masisi kati na etuka ya Nord-Kivu, ba ike bakuti yango.

Kolanda nsango ya bayu société civile locale, ezali bato baye bakufaki sima na bitumba bisalamaki kati na batomboki ba M23-RDF mpe bilenge babundi bayebani na kombo ya Wazalendo.

Ba nzoto koleka zomi na mibale ya kopɔla ezwamaki lundi. Yango ezalaki mpenza o etando Kiringi. O etando eye, bitumba makasi bizalaki mposo moleki. Makambo mabulunganaki na esika eye wuto mwa ntango nsima na bitumba biye.

elobi moko ya bakambi ba société civile

Kolanda maziba ya lipanda na etuka eye, mabota mingi makendeki na bamboka mingi na mikolo mileki nsima na bitumba kati na batomboki M23/AFC mpe bilenge baye babengaka Wazalendo.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img