Babundi ya Wazalendo, baye basungami na mampinga ya RDC (FARDC), babandi bitumba mbala moko na M23 na bitando ebele ya Sud-Kivu, mingi mingi na Katana (territoire ya Kabare) mpe na Burhale (territoire ya Walungu), uta moko ya zomi na ibale ya sanza ya minei oyo (12 avril), bitumba yango ezali kokoba lelo.
Na Kabare, bitumba ya mobulu ebimaki na bingumba Kabamba mpe Katana-Centre. Ba Wazalendo babenganaki na ebandeli batomboki ya M23 samedi na mpokwa, kasi baye ya suka bazwaki lisusu bisika na bango o’mokolo ya lomingo na ntongo.
M23 etiki ndako ya mpepo ya Kavumu mpo na kokende na nzela ya Katana-Kabamba-Kalehe, nzoka nde ba Wazalendo bazali koluka kokende liboso na ndako ya mpepo oyo.
Na Walungu, bitumba bizongelaki nsima na mwa kimia, ebebisi misala minso na paroisse ya Burhale na mokolo ya lomingo la mandalala.
Hôtel moko oyo bakanisaki ete ezali kobomba batomboki etumbamaki na ba Wazalendo, mpe motuka moko etelemaki kuna. Masasi makasi mazali kokoba kobeta na Burhale, atako motango moko te ya ba ike elobami nanu.
