Masasi mayokamaki na ntongo ya samedi le 15 février, na ba quartiers ebele ya engumba Bukavu (Sud-Kivu), epayi wapi batomboki M23, bakomi kosala mobeko. Bavandi ba Bukavu balobi ete bayokaki masasi pene na ndelo ya Bukavu na Cyangugu.
Kasi na tango oyo, eloko esalemi na Bukavu etebani nano malamu te. Lokola ba ike babangaki, batikalaki na kati ya ba ndako mpo na komibatela na makama.
Kasi, ba nsango misusu ebele na engumba eye endimi bozali bwa batomboki M23 na bisika ya motuya.
Ba M23 baye bamonanaki o ndako ya mosala ya tata moyangeli, kasi mpe liboso ya mairie, basusu o esika ebengami Kazingo. Ba ike balobi ete bamonaki mibali misusu ya minduki na ba balabala mosusu ya Bukavu, bazali kopesa somo.
Ezali bongo na nzela oyo ememaka na engumba Uvira, epayi bamonaki bato yango oyo bazalaki na bibundeli bazali kopunza bandako mosusu ya mombongo.



