21.1 C
Kisangani
12 septembre 2026
spot_img

Ituri : batomboki ya ADF babomi bato zomi na moko na Mambasa

Bato zomi na moko (11) bakufi na etumba ya sika ya batomboki ya ADF, na etando ya Babila-Babombi oyo ezwami na Mambasa, o etuka ya Ituri, mokolo mwa yambo ya mposo oyo (5 février 2024).

Nsango eye epesami na bayi Société civile ya etando ya Babila-Babombi. Bango ba limboli été bato mingi oyo bakufi, bazali ya etuka ya Nord-Kivu.

Ezalaki na ngonga ya mpokwa nde bibembe yango ekomaki na Mangina, etando oyo ezali na kilomètres tuku misato longwa na engumba Beni na eteni ya westi. Bibembe biango binso bitiamaki o ndako ya malili ya lopitalo moko kaka na etando wana.

Boyeba ete bitumba ya batomboki ya ADF ekomi makasi koleka. Ba mposo manso, bango bazali koboma bato na Nord-Kivu mpe Ituri.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img