Molakisi ya ba Nkoyi ya RDC, Sébastien Desabre, asololaki na bapanzi nsango mokolo mwa mibale mwa mposo oyo, na likambo litali malengeli mwa lisano lia bango lia yambo na momekano mwa CAN 2023. Ye alobi ete azali na kondima.
RDC ako sakana lisano lia ye lia yambo na CAN 2023 liboso ya Zambie, mokolo mwa misato mwa mposo oyo (mercredi 17 Janvier 2024). Na yango, Sébastien Desabre alimboli ete babeti ndembo banso bamilengeli malamu mpo ya koluka elonga.
Tomibongisaki malamu mpo na lisano oyo lokola mpe mpo na momekano mobimba. Basani bazalaki na malengeli ya malamu. Tozali kokende kuna mpo ya kosakana lisano lia malamu. Toyebi tozali na makoki yako bundela mboka na biso na lolenge nionso
Elobaki Sébastien Desabre, yambo yako bakisa :
Tokosakana na makasi na biso. Ezali na mayele moko oyo esalemi. Tozali na motema molai mingi te mpo na kokota na momekano. Tosili kozala na babeti ndembo zomi na moko oyo bakobeta lobi
Boyeba ete lisano liye lizelami makasi mingi na ba congolais banso. Ba ike bazali kosenga nse elonga mpo ete ba Nkoyi ba kende liboso na momekano oyo ya CAN 2023.



