Solo mikolo oyo ba cas e zali se ko bakisama na mboka, mpo na mokolo ya liboso (lundi) 01 juin 2020 oyo :
■ Ba cas kama mitano tuku mwambe na mineyi (584) eza na bo meki meki;
■ Ba cas kama yoko tuku misato na moko (131) ya sika oyo e ndimami e bakisami. Kati ya ba cas oyo Kinshasa eza na kama yoko zomi na mibale (112), Sud-Kivu eza na zomi na misato (13), Nord-Kivu eza na mitano (5) mpe Kongo Central eza na moko (1);
■ Bato tuku mibale na mwambe (28) ba biki;
■ Ata moto moko te (0) a kufi na kati ya ba beli;
■ Ba beli koto ibale kama isato (2.300) baza na évolution ya malamu.
Uta ebandeli ya bo kono oyo le 10 mars 2020, mboka e komi na ba cas koto isato kama isato tuku mibale na motoba (3.326), kati na ba cas oyo koto isato kama isato tuku mibale na mitano (3.325) e ndimami mpe cas moko eza « probable ».
Na boye, bato tuku sambo na mibale (72) ba kufi [ kati na bango ba cas tuku sambo na moko (71) e ndimami mpe cas moko eza « probable »] mpe bato kama mineyi tuku mwambe na mibale (482) ba biki.
COVID19 e koti na ba provinces sambo :
■ Kinshasa eza na ba cas koto isato na mwambe (3.008);
■ Kongo Central eza na ba cas kama yoko tuku libwa (190);
■Nord-Kivu eza na ba cas tuku mineyi na mwambe (48);
■ Sud-Kivu eza na ba cas tuku mineyi na moko (41);
■ Haut-Katanga eza na ba cas tuku misato na misato (33);
■ Ituri eza na ba cas mibale (2)
■ Kwilu eza na ba cas mibale (2);
■Kwango eza na ba cas yoko (1).



